Baprofeta babatelaki ntango nyonso milongo ya mabota.
Mpe esalemaki ete tata na ngai, Lehi, akutaki lisusu likolo ya bapalaki ya motako mambi ma kala ya libota ya batata na ye; yango wana ayebaki ete azalaki eboto ya Yosefe; iyo, kutu Yosefe oyo azalaki mwana ya Yakobo, oyo atekamaki kati na Ejipito, mpe oyo abatelamaki na loboko ya Nkolo, ete akoka kobatela tata na ye, Yakobo, mpe bato ya ndako na ye mobimba uta na liwa ya nzala.
Lehi amoni molongo ya libota na ye kati na bapalaki ya motako mpe ayebi ete auti na Yosefe ya Ejipito.
Tala, bana mibali na ngai, nazali na mposa ete bomikundola kobomba mitindo ya Nzambe; mpe nalingi ete bosakola epayi ya bato maloba oyo. Tala, napesi epayi na bino nkombo ya baboti na biso ya yambo baoyo bayaki uta na mboka ya Yelusaleme; mpe oyo nasali yango mpo ete ntango bokomikundola nkombo na bino bokoka komikundola bango; mpe ntango bokomikundola bango bokoka komikundola misala na bango; mpe ntango bokomikundola misala na bango bokoka koyeba ete elobami, mpe lisusu ekomami, ete ezalaki malamu.
Elamani apesaki bana na ye ya mibali bankombo ya bankoko ya sembo mpo ete kokanisa bankombo na bango ekundolisa bango bolamu ya bankoko na bango.
Sikawa Adama alobaki lisakoli oyo, wana efulamaki ye na Molimo Mosantu, mpe mambi ma kala ya libota ya bana ya Nzambe bobatelamaki. Mpe oyo ezalaki buku ya bankola ya Adama, kolobaka: Na mokolo oyo Nzambe akelaki moto, na elilingi ya Nzambe nde akelaki ye;
Banda na mikolo ya Adama, molongo ya libota ya bana ya Nzambe ebatelamaki, lisolo ya makomi ya libota ya yambo oyo ekomamaki.
Kasi masolo ya makomi ya batata, kutu bankoko, mpo na oyo etali makoki ya Bonganganzambe, Nkolo Nzambe na ngai abatelaki na maboko na ngai moko; boye boyebi ya ebandeli ya bokeli, mpe lisusu ya minzoto minene, mpe ya minzoto, lokola eyebisamaki epayi ya batata, soki nabombaki kino na mokolo oyo, mpe nakosala makasi ya kokoma boko makambo oyo likolo ya lisolo ya makomi oyo, mpo na litomba ya bana na ngai oyo bakoya nsima na ngai.
Abalayama abatelaki masolo ya makomi ya batata na ye mpe akomaki mpo na bolamu ya bakitani na ye.

Nakokaki kopesa bobongoli ya polele koleka mpo na eye, kasi lokola etiami awa ezali polele na lolenge ya kokoka mpo na kokokisa ntina na ngai. Ebongi malamu koyeba, mpo na likambo oyo, ete mabele makobetama na bolakeli mabe longola se soki mokangano ya kokangisa bato ya lolenge moko to mosusu kati na batata mpe bana, na likambo moko to mosusu—mpe tala nini ezali likambo yango wana? Ezali libatisi mpo na bakufi. Mpo biso, soki bazali te, tokoki te kokomisama bato babongi nie; bango mpe bakoki te kokomisama bato babongi nie soki tozali te. Bango bakoki te, biso mpe lokola kokomisama bato babongi nie soki baoyo wana lisusu bakufaki kati na nsango malamu bazali te; mpo esengeli na ebandeli ya eleko ya litondi ya ntango, oyo eleko ezali sikawa kobanda kobandisa, ete bomoko ya mobimba mpe ya ndambo te mpe ya kobonga nie, mpe bosangisi esika moko ya bileko, mpe bafungola, mpe banguya, mpe bankembo esengeli kosalema, mpe kobimisama uta na mikolo ya Adama kutu kino na ntango ya lelo. Mpe bobele oyo te, kasi makambo oyo wana ebimisami ata mokolo moko te uta na ebandeli ya mokili, kasi ebatelami ya kobombama mosika na bato ya bwania mpe bato ya mayele, ekobimisama epayi ya bana mike mpe baoyo bazali komelisama libele kati na oyo eleko, eleko ya litondi ya ntango.
Mosala mpo na bakufi ezali “mokangano ya kokangisa” oyo esangisaka bankola na bomoko moko ya kobonga nie.
Bandeko mibali bandimi, ekotia biso molende te na likambo ya ntina monene ya boye? Bokende liboso kasi bozonga nsima te. Boyika mpiko, bandeko mibali bandimi; mpe bokende liboso, liboso na elonga! Tika ete mitema na bino esepela, mpe ezala na esengo mingi koleka mpenza. Tika ete mabele mapasuka na koyembaka. Tika ete bakufi basakola nzembo ya bosanzoli ya seko na Mokonzi Emanuele, oyo akulaki, liboso ete mokili ezala, oyo ekokaki kopesa biso makoki ya kosikola bango uta na boloko na bango; mpo bakangemi bakokangolama.
Libiangi ya esengo ya Joseph Smith mpo na kokende liboso na kosikola bakufi, mpo bakangemi bakokangolama.
Tala, mokolo monene ya Nkolo ezali koya na lombangu; mpe nani akoki kotikala mokolo ya boyei na ye, mpe nani akotelema ntango akomonana? Mpo azali lokola moto ya monetoli mabende, mpe lokola sabuni ya mosukoli bilamba; mpe akofanda lokola monetoli mpe mopetoli ya mpauni, mpe akopetola bana mibali ya Lewi, mpe akosukola bango lokola wolo mpe lokola mpauni, ete bakoka kobonza epayi ya Nkolo libonza na bosembo. Boye, tika ete biso, lokola eklezia mpe lokola bato, mpe lokola Basantu ya Mikolo ya Nsuka, tobonza epayi ya Nkolo libonza na bosembo; mpe tika tolakisa na tempelo na ye esantu, ntango esili, buku moko oyo ezali na masolo ya makomi ya bakufi na biso, oyo ekozala elongobani mpo na bondimami nyonso.
Basantu babengami mpo na kolakisa na tempelo buku moko oyo ebongi, oyo ezali na masolo ya makomi ya bakufi na bango.